article comment count is: 2

Ba préjugés oyo ezo boma mboka na biso

« Baluba ba botoloka batu mapangu,  bazalaka ba vantards. Baswahili ba melaka masanga mingi, ba kongo bazalaka maboko makasi, ba mongo bazalaka ba ndumba, …. ». To lobaka mpe to yokaka maloba oyo tobengi na lopoto: préjugés to stéréotypes.

Ba préjugés to ba stéréotypes ezo sala ete tozo yina  ba ndeko na biso moko ba Congolais kozanga koyoka bango, to kosolola na bango, to mpe ko fanda ata na bango. Expérience moko ya mabe to vivre na muluba moko to mibale esali ete to generaliser yango na baluba nionso. Ezali te po muluba moko abotola lopango ya mutu nde to loba baluba nyonso ba botolaka mapangu ya batu.

To tielani ba barrieres na misala, na bisika na biso ya ko fanda, likolo ya ba prejugés to stéréotypes ya pamba! Na bikolo nionso, batu ya mabe mpe ya malamu bazangaka te, ba vantards, batu ya maboko makasi, ba escrocs,  batu ya milayi to ya mikuse, batu ya lolenge nionso bazali na bikolo nyonso. Mutu nionso pe azalaka na mabe, pe bolamu na ye.

Soki toza na intérieur, to se jugeaka par rapport ya ba ethnies na biso ; soki tokomi Kinshasa, tokomi ko yinana likolo ya ba provinces d’origine na biso ;  soki tobimi libanda ya mboka, wana tokomaka batu moko malgré ba provinces na biso.

Nzoka nde, bison nyonso toza kaka batu moko, ekolo moko. Ba préjugés wana ezo tonga nango mboka na biso te. To changer pardon!

 


Vous pouvez lire aussi :

Préjugés et stéréotypes, les maux qui rongent la société congolaise

Est-ce que vous avez trouvé cet article utile?

Partagez-nous votre opinion

Les commentaires récents (2)